KOKO MANGONGELE/koko kipulu:kimbangu akufa te,akota nde na kati ya mayi ya lualaba

Sdílet
Vložit
  • čas přidán 8. 10. 2015
  • koko kipulu alobeli liwa ya nvulunzi KIMBANGU,ye a kufa te.pe mozole ya KAMBA eza mozole ya kimbangu te,eza ekeko moko magique oyo mundele ba tinda le 2.avril.1960 pona ko lalisa nguya ya KIMBANGU...NVULUNZI akufa te,alimua ya prison pe akota na kati ya mayi ya lualaba...Pe a mayioli lisolo ya koko kuku pemba

Komentáře • 46

  • @kokokipulu7771
    @kokokipulu7771 Před 8 lety +4

    matondo mingi ndeko na ngayi, kasi nionso ekobima na mpuasa, na kombo ya nzambe ya ba koko na biso

  • @kstonetv8348
    @kstonetv8348 Před 3 lety +1

    Mbote Koko KIPULU, Matondo mingi. NZAMBE YA BA KOKO A BATELA Yo.

  • @lucaslussembo4900
    @lucaslussembo4900 Před 8 lety +5

    ingeta,ingeta
    matondo mingi koko kipulu

  • @kongo1723
    @kongo1723 Před 8 lety +6

    Émission kitoko vraiment

  • @vanimosengo5632
    @vanimosengo5632 Před 8 lety +5

    Aaah papa ozoloba nayo yasolo kasi mutu miundu po andima eza pasi,mawa yango tozo sambela nzambe butu moyi rien ne change po kososola eza te

    • @kokokipulu7771
      @kokokipulu7771 Před 8 lety +1

      milimo ya pet wa ya ba koko na biso nde ekobalola nionso

  • @thekdorions4991
    @thekdorions4991 Před 6 lety +1

    Koko kipulu kitoko

  • @celinesongwa9345
    @celinesongwa9345 Před 2 lety

    Matondo mingi

  • @user-tz5fw7du7m
    @user-tz5fw7du7m Před 5 lety

    Bwania Nzambe ba koko abatela yo ingeta ingeta ingeta

  • @lucaslussembo4900
    @lucaslussembo4900 Před 8 lety +4

    ntangu ifinamene

  • @landuhenri7100
    @landuhenri7100 Před 7 lety +1

    Cercueil wana il faut ebima...batu y'a vert blanc na diangienda kosakana na batu

  • @clarissefotot6211
    @clarissefotot6211 Před 2 lety

    Ingueta ingueta

  • @mwenelikyokeloecibalungu3797

    Bulambemba village na bandundu)lesika koko kuku mpemba motu (tete) naye ekendaki komikunda tango bamindele en 1600 ans bakatiki ye na bruxelles en plen hiver tango akutaki bango na reunion na koyebisa bango batika ko niokola bayindu soki eza nkita esengeli baya na bo mutu bakopesa bango oyo balingi pcq mokeli apesa yango mpo na peuple mobimba mais esalama na kati ya respect na ordre.

    • @kokokipulu7771
      @kokokipulu7771 Před 8 lety +1

      toye na reconnaissance ya kozongisa bondeko na ba koko na biso

  • @pynsuka
    @pynsuka Před 6 lety

    INGETAAAAA ☝☝☝

  • @matakamangbongase7500
    @matakamangbongase7500 Před 5 lety

    Ibobo

  • @kongo1723
    @kongo1723 Před 8 lety +6

    Ba émissions ya boye ilfo esalema chaque mois

    • @kokokipulu7771
      @kokokipulu7771 Před 8 lety

      ekoki pe kosalema chaque semaine avec la capacite ya 444000 livres bantu

    • @pynsuka
      @pynsuka Před 6 lety

      Exactement

  • @mwenelikyokeloecibalungu3797

    Koko Kipulu cerceuil wana depuis 1959-1961 na tango ya president ya yambo ya KONGO NKasa MVubu

  • @eliaschicaia1809
    @eliaschicaia1809 Před 8 lety

    oza probleme ya mutu

    • @kokokipulu7771
      @kokokipulu7771 Před 8 lety +1

      oyebi eloko ozali koloba te, soki omoni mutu ayeli yo makambu oyo yo oyebi, luka nde oyeba, bayeli yo ecriture, bongamaka pona kobandela kotanga kelasi ya batu bayindo

  • @mwenelikyokeloecibalungu3797

    Ndk Atandele ,raisonement nayo eza absurd pourquoi olobi oyo nyonso lkoko Kipuluazoloba azwi yango na sima ya mokongo ya Mangongele ,, Tolobela bosolo bazwa yo bamemi yo na pembeni ata ya messager moko obanda koyoka nyonso azoyebisa yo vraiment okokanga yango na mutu nayo ,lokola koko Kipulu?Te ,ata docteurs byonso ya kongo ya afrika bayebi te makambo lokola oyo ba messagers bayebi d ailleurs ba messagers baza na capacité ya koyokolisa ba docteurs nyonso na kongo na afrika, messagers baza ba CAPACITAIRES et puis vidéu oyo ezo pesa te kolobela l mbotama na liwa ya Mangongele eza ,makanisi nayo ya koloba ete Mangongele akufaki après que kanambe ahuta na BADARA wana eza makanisi nayo Akufa na tango naye bakoko bapesaka ye.

    • @kapertos
      @kapertos  Před 8 lety

      +Mwenelikyokelo Ecibalungu eza vraiment ndenge olobi koko.esengo mingi na bwania na yo!

    • @kokokipulu7771
      @kokokipulu7771 Před 8 lety +1

      +KOKO MANGONGELE esengo mingi elobaki mvuluzi kimbangu ete ayaki na ba tata, pe bapesaki ye mukongo,kasi lelo aye kati na biso bilenge na ntina ete tobimisa ba koko na biso loposo moyindo, baniokuamaki mingi pona kolukela biso kimia ya mokili mobimba

  • @Etanedele
    @Etanedele Před 8 lety +1

    Papa tika kokosa que YO omona vuluzi kimbangu
    Mfumu kimbangu akutana na Koko Mangongele et YO oyebi makambu oyo tout na sima ya Mangongele
    Et keba nako benga bakonzi ya mboka na makabu oyo PO apres visite ya kabila na badara nde Koko Mangongele akufaki ...

    • @kokokipulu7771
      @kokokipulu7771 Před 8 lety

      oui, koko mangongele azali mutu ya yambo, namona mvuluzi kimbangu na 1997, en plusieurs fois, pe naye kokutana na mvuluzi kimbangu na 1998, pe na 1999, kino na lelo

    • @mwenelikyokeloecibalungu3797
      @mwenelikyokeloecibalungu3797 Před 8 lety +2

      +Etanedele Ndk na kati ya message nayo olingaki koloba nini au juste?soki tokozala na batu lokola yo na Kongo en tout cas ekozala pasi, on dirait que reincarnation nayo eza forcée,soki vraiment mutu asalaka reincarnation normale et complete akoki koloba ndenge wana te,na kongo na afrika toza na batu mingi bakendaka na monde astral te apres liwa ,donc eza pasi batu ya ndenge wana nde bazotikala na ignorance mingi( balingaka ba polémiques) ,ba ndimaka te, puisque basalaki amelioration té,meme vie passée ya botutu nde bazo continuer ko vivre na yango.(esprits errants)

    • @kapertos
      @kapertos  Před 8 lety

      +Mwenelikyokelo Ecibalungu to pengi bango ba humain incomplet,batu ya boye baza ebele.mais malembe malembe tokwendanga!

    • @kokokipulu7771
      @kokokipulu7771 Před 8 lety

      esengo mingi ndeko ezali likambu ya kowelela te, navanda na mangongele depuis 1997 kino 2008, pe ngayi namoni mvuluzi kimbangu en plusieurs fois, soki yo otie tembe, banda na tembe na yo, vouloir ou pas tembe na yo ekosila

  • @saturninngoma8943
    @saturninngoma8943 Před 6 lety +1

    Ya solo kombo na yo ezali koko kipula, kasi ngai nabengi yo koko Kifula. Luka mokongo to bakongo, tuna bango soki Kifula elingi koloba nini. Ozali messager ya lokuta po nioso oyo olobi pona Papa Simon Kimbangu ezali n'importe quoi. Nandimi te ke okutanaka na Papa Simon Kimbangu, po mutu nioso oyo akutana na ye azalaka bilobela te kasi azalaka na limemia. Mutu nioso oyo akutanaka na Papa Simon Kimbangu ayaka na maloba yakotiola te pe yakofinga te.
    Nalandi maloba na yo ebele sur internet, conclusion na ngai yang'oyo: Ozali aventurier, ozali kosalela kombo ya Papa Simon Kimbangu pe kofinga Papa Diangienda po oyebana. Soki oyebaki penza Papa Simon Kimbangu, olingaki pe koyeba ke Papa Diangienda azali muana na ye ya misato. Papa Wemba (paix à son âme), mutu abandaki ba faux débat oyo, asi asengelaka yango bolimbisi. Yo olingi nde ko distraire bato na makambo mko ezanga tina.
    Landa témoignage ya Papa Ebeli Popo Ndombo (eza na internet), ye akutana solo na Papa Simon Kimbangu : Ayebisaki ye clairement que aza na bana aza pe na ba koko. Aza ye moko te, ba témoignage mususu pe ezali oyo ezo confirmé ke Papa Simon Kimbangu aza na bana.
    Yambo yakolobela kombo ya Papa Simon Kimbangu, luka oyeba histoire na ye. Azali ya bakongo te kasi abotamaki epayi ya bakongo, na bas-Congo. Likambo wana okoki ko changer yango te. Erreur grave : mama Kinzembo azalaki Tata muasi ya Papa Diangienda te, kasi azalaki mama leki ya Papa Simon Kimbangu, ye mutu abokolaki ye tango mama Luezi akufaki.
    Lokuta monene : de 1921 à 1951, Papa Simon Kimbangu alimua jamais na prison ya Elisabethville (Lubumbashi). Ata mokolo moko te. Kende sur place na Lubumbashi, kende kotuna ba mbuta muntu ebele bazali kuna bayebi histoire ya Papa Simon Kimbangu, bako confirmé yo yango. Azalaki komonana bisika mosusu tout en étant en prison. Tango bakangi ye na Maya Maya (na Congo Brazzaville) na 1948, awuti Bruxelles na vol ya Sabena, Kuna na Lubumbashi azalaki tranquillement na kati na boloko. A bougeaki te. Eyaki bango kozongisa ye kuna, na prison ya Kasombo ba se retrouvaki na deux kimbangu. Sima nde moko abungaki moko atikalaki. Ba témoins ya makambo wana bazali. Lolenge moko tango bakangi ye na Boma na 1942, azalaki na ye toujours na prison. Mokolo mususu, bakangi ye na bisika mitano na mbala moko: na Buende, na Ekafela, na Elisabethville, na Boma pe na Coquilhatville (Mbandaka). Batindi ba kimbangu nioso mitano na Elisabethville, suka nango moko atikali ba mususu balimuaki. Elaki ete oyebi na yo histoire ya Papa Simon Kimbangu te. Azalaki lâche te po akima na prison. En plus, ozokosa batu ke alimua na prison akota na mayi ya Lualuaba. Franchement, imagination na yo esalaka mingi kasi imagination ezali vérité te. Nioso wana lokuta na lokuta.
    Olobi ete nzoto ya Papa Simon Kimbangu eza na cerceuil te po akufa te. Lokola oyebi histoire te, tika nayebisa yo: Indépendance ya R.D.C ezalaki conditionnné na bozongi ya nzoto na ye na Nkamba. Ezalaki elembo pona kolakisa ete tango yakozua bonsomi ekoki. Témoignage ya ba oyo bazalaki tango Papa Simon Kimbangu akufaki na Elisabethville (Lubumbashi) ezali na internet : papa Raphaël Nasena, papa Kimbanzia, papa Sakuabango, Etienne Nkazi pe ba misusu. Mingi kati na bango basi bakufa kasi ba famille na bango bazali. Kende kosala enquête au lieu de raconter n'importe quoi. Yo ozali nani po o contester une histoire aussi authentique ? C'est-à-dire réelle et vérifiable. Kala mini te, mama Ngalula Rebecca awutaki ko témoigner ke ye amonaka nzoto ya Papa Simon Kimbangu na 1951, na âge ya 4 ans (eza na internet).
    Nakamuaka ba Congolais mususu : Papa Simon Kimbangu aza na histoire na ye ya solo, ya kobamba te. Avandaki na Congo na bisika oyo eyebani na batu nioso. Pona nini okoki kosala enquête te po oyeba solo ezali wapi to lokuta ezali wapi ? Mawa ya Papa Simon Kimbangu po mingi bakomi kokosela ye makambu. Et, yo Kipula, ozali moko na bango.
    Nakosukisa boye : Kotanga kombo na ye pamba pamba pe koyeba penza Papa Simon Kimbangu ezali makambo mibale. Ezali te po ozo kokuakula na internet ke oyebi ye. Nazongeli koloba ete ozali messager ya lokuta, po soki ozalaki messager ya solo ; olingaki koyeba ba prophéties pe ba promesses ya solo solo ya Papa Simon Kimbangu. Pamba te kati na ba prophétie na ye ya 1921alobaki ete : " Nkamba ezali Yeluselemi ya Sika ", pe " Nkolo Yesu " akoya mbala ya mibale na loposo moyindo. Na tina ezali. Soki oyebi te, tuna nakolimbolela yo. Kasi tika kobuka lokuta lokola nguba na makambo ya Papa Simon Kimbangu . Solo ekotikala solo pe lokuta ekotikala se lokuta. Qui vivra verra lokuta ya Kipula.

    • @kapertos
      @kapertos  Před 6 lety +2

      saturnin ngoma bino ba chretiens kimbangiste bozela kaka fimbu.nvulunzi kimbangu azali tata na yo te pe abota te... Diangenga et ses frere baza bana ya tata kapata et non bana ya kimbangu. Tangu ifueni verite ezo ya

    • @saturninngoma8943
      @saturninngoma8943 Před 6 lety

      Nazalaka na respect mingi pona Papa Mangongele, po ayebaka kolobela likambo ya Papa Simon Kimbangu. Atako nazalaki na ye désaccord te na makambo nioso te, kasi azalaki koloba n'importe quoi te lokola bino. Paix à son âme !
      Enseignement na biso etondi lokuta. Boyebi penza likambo ya Papa Simon Kimbangu te po na nioso na reprocher ndeko Kipula, bopesi ngai ata argument moko te. Elakisi ete boyebi Kombo ya Papa Kimbangu kasi boyebi Papa Simon Kimbangu te.
      Boyeba yango ete : " Muana oyo abotamaka pe akolaka na ndako ya Tata na ye, akoyebaka yango koleka ba oyo nioso bakoyaka sima ".
      Nazozela ba arguments na bino pona ko justifier lokuta ya ndeko Kipula. Qui vivra verra !

    • @ronickilunga7136
      @ronickilunga7136 Před 4 lety

      @@saturninngoma8943 papa yebisa nanu kiangani abimisa cercueil on a parlera

    • @saturninngoma8943
      @saturninngoma8943 Před 4 lety

      @@ronickilunga7136, Nkamba ezali ya batu nioso. Soki ozali penza na posa ya koma po ondima, nzela ezali polele. Yeba yango ete tembe na solo ezali biloko mobila pe biango bikokendaka nzela moko te !

    • @ronickilunga7136
      @ronickilunga7136 Před 4 lety

      @@saturninngoma8943 yebisa M.kiangani afongola cercueil nde po bolobaki kimbangu lisu moko emonaka moko emonaka te afongola bino tout bomona eza simple